Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 15:11 - Mokanda na Bomoi

11 — Nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakomisaki Saulo mokonzi, pamba te apesi Ngai mokongo mpe aboyi kotosa mitindo na Ngai. Samuele asilikaki mpe abelelaki Yawe butu mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 15:11
44 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Yawe ayokaki mawa na ndenge akelaki moto kati na mokili mpe abongolaki makanisi na Ye.


Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. »


Lokola anjelu atandaki loboko na ye na likolo ya Yelusalemi mpo na kobebisa yango, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! » Nzokande, na tango wana, anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orina, moto ya Yebusi, kati na likolo mpe mabele, mpe asimbaki mopanga ezanga ebombelo.


Yawe atombokelaki Salomo mpo ete motema na ye epengwaki mosika na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo amimonisaki epai na ye mbala mibale.


Saulo akufaki mpo ete atosaki Yawe te, abatelaki Liloba na Yawe te mpe akendeki kotuna makambo epai ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi, na esika ya kotuna makambo epai na Yawe.


Nzambe atindaki anjelu na Yelusalemi mpo na kobebisa yango ; kasi wana anjelu azalaki kobebisa, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! » Anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orinani, moto ya Yebusi.


pamba te baboyaki kolanda Ye mpe kososola banzela na Ye.


Bato oyo ngai nalingaka bafundi ngai, kasi ngai namipesi na ngai kaka na mabondeli.


Yawe alapaki ndayi oyo, akobongola maloba na Ye te : « Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela kolanda molongo ya Melishisedeki ! »


Miso na ngai ezali kosopa mpinzoli, pamba te mibeko na Yo ezali kotosama te.


Kasi tika ete Yawe abengana bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe ! Tika ete kimia ezala na Isalaele !


Bamipesaka lokumu makasi, bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.


bazalaki kozongela komeka Nzambe, koyokisa Mosantu ya Isalaele mawa.


bapengwaki mpe babukaki mibeko ya boyokani, ndenge batata na bango basalaki ; batengamaki lokola tolotolo oyo mbanzi na yango ekeyi na mopanzi ;


Moyize abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe alobaki : — Eh Yawe ! Mpo na nini kanda na Yo ekweyela bato na Yo, oyo obimisaki na Ejipito, na nguya monene mpe na loboko ya makasi ?


Mpe Yawe asalaki lisusu te mabe oyo akanaki kosala bato na Ye.


Bazongeli kosala masumu ya bakoko na bango, oyo baboyaki koyoka maloba na Ngai. Bazali kolanda banzambe mosusu mpo na kosalela yango. Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele babebisi boyokani oyo nasalaki elongo na bakoko na bango.


Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.


Kasi tala sik’oyo makambo bosali : bozongi sima, botiki ekateli oyo bozwaki mpe botioli bosantu ya Kombo na Ngai ; pamba te bozongisi bawumbu na bino ya kala, mibali to basi, oyo bopesaki bonsomi mpo ete bakende na esika nyonso oyo balingi ; bokangi bango na makasi mpo ete bakoma lisusu bawumbu na bino.


Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !


Kolela ya mawa ezali koyokana wuta na Siona : ‹ Ah ! Tala ndenge nini tosili kobebisama ! Tala ndenge nini tosambwe ! Tika ete tokima mokili na biso, pamba te bandako na biso ebebisami. › »


Kasi soki moto ya sembo atiki bosembo na ye mpe akomi kosala masumu, soki amipesi na makambo nyonso ya mbindo oyo moto mabe asalaka, bokanisi ete akozala solo na bomoi ? Bakokanisa lisusu ata te makambo nyonso ya bosembo oyo asalaki. Akokufa solo mpo na bozangi boyengebene na ye mpe mpo na mabe na ye oyo asalaki.


Boye, Yawe abongolaki makanisi na Ye mpe alobaki : — Makambo yango ekosalema te.


Tango Nzambe amonaki makambo oyo basalaki mpe ndenge batikaki banzela na bango ya mabe, abongolaki makanisi na Ye mpe atindelaki bango lisusu te etumbu oyo akanaki kopesa bango.


Asambelaki Yawe : — Oh Yawe ! Ezali te makambo ya boye nde nazalaki komilobela tango nazalaki epai na ngai ? Yango wana nasalaki na ngai mobembo na Tarsisi mpo na koluka kokima, pamba te nayebaki malamu ete ozali Nzambe ya ngolu mpe ya mawa, osilikaka noki te mpe otonda na bolingo, obongolaka makanisi na Yo ya kosala bato mabe.


bato nyonso oyo bapesaka Yawe mokongo, oyo balukaka Ye te mpe batunaka Ye te.


Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.


Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.


Kaka na mikolo wana, Yesu amataki likolo ya ngomba mpo na kosambela ; asalaki kuna butu mobimba, azali kosambela Nzambe.


Moto na ngai ya sembo akobika na nzela ya kondima ; kasi soki azongi sima, nakosepela na ye te.


— Tala liloba oyo lisanga mobimba ya Yawe elobi : « Ndenge nini bokoki penza kosala lisumu ya boye na miso ya Nzambe ya Isalaele ? Ndenge nini penza bokoki kopesa Yawe mokongo mpe komitongela etumbelo mpo na kotombokela Ye na mokolo ya lelo ?


Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino ! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima.


Samuele alobaki na Saulo : — Osali lokola moto ya liboma ! Obateli te mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo. Soki obatelaki yango, alingaki kolendisa bokonzi na yo kati na Isalaele mpo na libela.


Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te ; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › »


Kino na mokolo oyo Samuele akufaki, atikalaki komona lisusu Saulo te. Samuele asalaki matanga mpo na Saulo. Mpe Yawe ayokaki mawa na ndenge akomisaki Saulo mokonzi ya Isalaele.


Kasi Saulo mpe basoda babatelaki Agagi elongo na bibwele oyo elekaki kitoko kati na bameme, bantaba mpe bangombe, bibwele oyo eleki minene, bana meme oyo ya minene mpe nyonso oyo ezalaki malamu. Baboyaki kobebisa yango ; babebisaki kaka oyo ezalaki ya mabe mpe ya kokonda.


Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.


Kasi tango balobaki : « Pesa biso mokonzi oyo akokamba biso, » Samuele asepelaki na likambo yango te ; boye asambelaki Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ