Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 14:50 - Mokanda na Bomoi

50 Kombo ya mwasi na ye ezalaki « Ayinoami, » mwana mwasi ya Ayimaatsi. Abineri, mwana mobali ya Neri, Noko ya Saulo, azalaki mokonzi ya mampinga ya Saulo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 14:50
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya basoda ya Saulo, azwaki Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, mpe amemaki ye na Maanayimi.


Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.


Mokonzi alobaki na basali na ye : « Boni, boyebi na bino ete mokambi moko mpe moto moko ya monene akweyi lelo kati na Isalaele ?


Na tango ya bitumba kati na mabota ya Saulo mpe ya Davidi, Abineri azalaki kolendisa nguya na ye kati na ndako ya Saulo.


Shelomiti mpe bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo Samuele, momoni makambo ; Saulo, mwana mobali ya Kishi ; Abineri, mwana mobali ya Neri ; Joabi oyo kombo ya mama na ye ezalaki « Tseruya, » babulisaki mpo na Yawe.


mpo na ndambo ya libota ya Manase kati na Galadi : Yido, mwana mobali ya Zakari ; mpo na libota ya Benjame : Yaasieli, mwana mobali ya Abineri ;


Noko ya Saulo atunaki Saulo mpe mosali na ye : — Bokendeki wapi ? Saulo azongisaki : — Tokendeki koluka ba-ane. Kasi lokola tomonaki yango te, yango wana tokendeki epai ya Samuele.


Tango Saulo amonaki Davidi kokende kobundisa moto ya Filisitia, atunaki Abineri, mokonzi ya mampinga : — Elenge mobali oyo azali mwana ya nani ? Abineri azongisaki : — Na kombo na yo mokonzi, nayebi te.


Davidi atelemaki mpe akendeki na esika oyo Saulo atongaki molako na ye. Amonaki esika oyo Saulo mpe Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga na ye, balalaki. Saulo azalaki ya kolala na kati-kati ya molako, mpe basoda bazingelaki ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ