Tolotolo ya Jonatan ezalaki kozonga sima te soki esopi makila ya banguna te, mpe soki etoboli mafuta ya bilombe te ; mpe mopanga ya Saulo ezalaki kozonga te soki ekokisi mosala na yango te.
Yawe alobaki na Moyize : — Koma yango na buku lokola ekaniseli, mpe loba na Jozue ete nakosilisa bato ya Amaleki na mokili ; bakotikala kokanisa bango lisusu te.
Tango Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino bopemi liboso ya banguna nyonso oyo bazingeli bino kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa lokola libula, bosengeli koboma bato ya Amaleki mpo ete botikala lisusu te kokanisa bango kati na mokili. Bobosana te kosala likambo yango.