Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 14:47 - Mokanda na Bomoi

47 Tango Saulo azwaki bokonzi mpo na koyangela Isalaele, abundisaki banguna na bango na bangambo nyonso : Moabi, bato ya Amoni, Edomi, bakonzi ya Tsoba, mpe bato ya Filisitia. Bisika nyonso oyo azalaki kobaluka, azalaki kolonga bato wana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 14:47
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kulutu abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Moabi  ; » azali tata ya ekolo ya Moabi, kino na mokolo ya lelo.


Leki mpe abotaki lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Beni-Ami  ; » azali tata ya ekolo ya Amoni, kino na mokolo ya lelo.


Bango nde bazalaki bana mibali ya Ezawu oyo azali Edomi, mpe bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Edomi.


Yango wana Ezawu, oyo azali Edomi, akendeki kovanda na ngomba Seiri.


Tolotolo ya Jonatan ezalaki kozonga sima te soki esopi makila ya banguna te, mpe soki etoboli mafuta ya bilombe te ; mpe mopanga ya Saulo ezalaki kozonga te soki ekokisi mosala na yango te.


Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo : epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale ; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko ; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale.


Davidi azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba, azalaki kosalela bato na ye nyonso makambo ya sembo mpe ya alima.


Davidi alongaki lisusu Adadezeri, mwana mobali ya Reobi, mokonzi ya Tsoba, tango Adadezeri akendeki kolendisa bokonzi na ye pembeni ya ebale Efrate.


Nzambe abimisaki monguna mosusu mpo na kobundisa Salomo ; kombo na ye : Rezoni. Rezoni Azalaki mwana mobali ya Eliyada, oyo akimaki nkolo na ye, Adadezeri, mokonzi ya Tsoba.


Lokola Yawe alobaki te ete akolimwisa kombo ya Isalaele na se ya moyi, abikisaki bango na nzela ya loboko ya Jeroboami, mwana mobali ya Joasi.


Bozali sik’oyo na mokonzi lokola mokambi. Kasi ngai nakomi mobange, nasili na ngai konuna, mpe bana na ngai ya mibali bazali awa elongo na bino. Nazalaki mokambi na bino wuta bolenge na ngai kino na mokolo ya lelo.


Saulo azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki Isalaele mibu tuku minei na mibale.


Saulo atikaki kolanda bato ya Filisitia, mpe bato ya Filisitia bazongaki na mboka na bango.


Na mikolo nyonso ya bomoi ya Saulo, bitumba ezalaki makasi na bato ya Filisitia ; mpe bisika nyonso oyo Saulo azalaki komona bato ya makasi to ya mpiko, azalaki kozwa mpe kokotisa bango kati na mampinga na ye.


Bongo Nganga-Nzambe apesaki ye mapa ebulisama, pamba te azalaki na mapa mosusu te. Ezalaki mapa oyo batiaki liboso ya Yawe, oyo bawuti kolongola na miso na Ye mpo na kotia mapa mosusu oyo ebimi sika na moto, na esika ya mapa oyo ya liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ