1 Samuele 14:45 - Mokanda na Bomoi45 Kasi bato balobaki na Saulo : — Boni, Jonatan akokufa ! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye ! Te ! Na Kombo na Yawe, akokufa te ! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo. Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Amaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akozala mokambi na bino mpo na makambo nyonso oyo etali Yawe ; mpe Zebadia, mwana mobali ya Isimaeli, mokonzi ya libota ya Yuda, akozala mokambi na bino mpo na makambo nyonso oyo etali mokonzi. Balevi bakozala lokola bakalaka liboso na bino. Bozala na mpiko mpe bosala mosala ! Mpe tika ete Yawe azala elongo na bato oyo bakosala malamu ! »
Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te ? »