42 Saulo alobaki : « Bobeta zeke kati na ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali. » Mpe zeke ekweyaki epai ya Jonatan.
Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe, kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.
Zeke esilisaka koswana mpe ekataka makambo kati na bato ya makasi.
Bato oyo basalaka na masuwa bamilobelaki bango na bango : « Boya ! Tobeta zeke mpo toyeba moto oyo azali kobendela biso pasi oyo. » Babetaki zeke, mpe zeke yango ekweyaki epai ya Yona.
Sima, tango abengisaki moto na moto kati na ndako ya Zabidi, Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, nde aponamaki.
Bongo Saulo asambelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele : « Oh Nzambe, talisa ngai eyano ya malamu. » Boye zeke ekweyaki epai ya Jonatan mpe Saulo, mpe bato bazalaki na mbeba te.
Bongo Saulo alobaki na Jonatan : — Yebisa ngai likambo oyo osalaki. Jonatan alobaki : — Namekaki ndambo ya mafuta ya nzoyi na songe ya nzete oyo nazalaki na yango na maboko. Mpe sik’oyo nasengeli kokufa !