41 Bongo Saulo asambelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele : « Oh Nzambe, talisa ngai eyano ya malamu. » Boye zeke ekweyaki epai ya Jonatan mpe Saulo, mpe bato bazalaki na mbeba te.
Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe, kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.
Zeke esilisaka koswana mpe ekataka makambo kati na bato ya makasi.
Bato oyo basalaka na masuwa bamilobelaki bango na bango : « Boya ! Tobeta zeke mpo toyeba moto oyo azali kobendela biso pasi oyo. » Babetaki zeke, mpe zeke yango ekweyaki epai ya Yona.
Bongo basambelaki boye : « Oh Nkolo, Yo oyo oyebi mitema ya bato nyonso, lakisa biso nani oyo oponi kati na bato oyo mibale,
Bongo babetaki zeke, mpe zeke ekweyaki epai ya Matiasi ; boye Matiasi aponamaki, mpe babakisaki ye na lisanga ya bantoma zomi na moko.
Bongo Saulo alobaki na bato nyonso ya Isalaele : — Bozala ngambo moko. Ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali, tokozala ngambo mosusu. Bato bazongisaki : — Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu.
Saulo alobaki : « Bobeta zeke kati na ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali. » Mpe zeke ekweyaki epai ya Jonatan.