Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 14:39 - Mokanda na Bomoi

39 Na Kombo na Yawe, Mobikisi ya Isalaele, ata ezali Jonatan, mwana na ngai ya mobali, nde asali lisumu yango, asengeli kokufa. Kasi kati na bato, moko te alobaki ata liloba moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 14:39
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi asilikelaki mozwi makasi mpe alobaki na Natan : — Na Kombo na Yawe, moto oyo asali boye asengeli na kufa !


Mokonzi alobaki na Joabi : — Malamu ! Nakosala yango. Kende, zongisa elenge mobali Abisalomi.


Bato nyonso basukaka kaka ndenge moko : ezala moto ya sembo to moto mabe, ezala moto malamu to moto oyo asalaka masumu, ezala moto ya peto to moto ya mbindo, ezala moto oyo abonzaka mbeka to moto oyo abonzaka mbeka te. Ndenge ezalaka mpo na moto ya motema malamu ndenge mpe ezalaka mpo na moto ya masumu ; ndenge ezalaka mpo na moto oyo alapaka ndayi ndenge mpe ezalaka mpo na moto oyo abangaka kolapa ndayi.


Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » Boye moto moko te amekaki kolia.


Bongo Saulo alobaki na bato nyonso ya Isalaele : — Bozala ngambo moko. Ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali, tokozala ngambo mosusu. Bato bazongisaki : — Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu.


Saulo alobaki : — Jonatan, tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi koleka soki okufi te.


Saulo ayokaki Jonatan mpe alapaki ndayi boye : « Na Kombo na Yawe, bakoboma Davidi te. »


Pamba te tango nyonso mwana mobali ya Izayi akozala na bomoi kati na mokili oyo, ezala yo to bokonzi na yo, bokozala na kimia te. Sik’oyo, lukisa ye mpe memela ngai ye, pamba te asengeli kokufa.


Kasi mokonzi alobaki : — Ayimeleki, okokufa solo ; yo mpe libota mobimba ya botata na yo.


Saulo alapaki ndayi epai na ye na Kombo na Yawe, alobaki : « Na Kombo na Yawe, okozwa solo etumbu te mpo na yango. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ