37 Boye Saulo atunaki Nzambe : « Nakoki na ngai kokita mpo na kolanda bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko ya bato ya Isalaele ? » Kasi Nzambe apesaki ye eyano te na mokolo wana.
Davidi atunaki Yawe : — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, pamba te nakokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.
Bongo Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : « Kobundisa bango na liboso te, kasi baluka na sima na bango ; bongo okobimela bango na liboso ya banzete ya mirie.
Tango akomaki epai ya mokonzi, mokonzi alobaki na ye : — Mishe, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? Mishe azongisaki : — Kende ! Okolonga ! Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi.
« Mwana na moto, loba na bakambi ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, boyei solo kotuna toli epai na Ngai ? Na Kombo na Ngai, nakomitika te ete botuna toli epai na Ngai, elobi Nkolo Yawe. ›
Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe : — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ? Yawe azongisaki : — Yuda akokende liboso.
Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te ? Yawe azongisaki : — Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino.