Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 14:35 - Mokanda na Bomoi

35 Bongo Saulo atongaki etumbelo mpo na Yawe ; ezalaki mbala na ye ya liboso ya kosala likambo ya boye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 14:35
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Yawe ayokelaki mboka mawa, mpe bokono oyo ezalaki koboma elongwaki na Isalaele.


Isalaele abosani Mokeli na ye mpe atongi bandako ya kitoko ; Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi ; kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango, mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »


bakobanda komilakisa lokola nde bazali na botosi kati na makambo ya Nzambe, nzokande bawanganaka nguya na yango. Kima bato ya lolenge wana !


Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino !


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato batongaki kuna etumbelo ; batumbaki na likolo na yango bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.


Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.


Saulo abakisaki : Bokende kati na bato mpe boloba na bango ete moko na moko amemela ngai ngombe na ye mpe meme na ye, mpe akata yango kingo na esika oyo. Bongo bokolia yango mpe bokosala masumu te liboso ya Yawe na kolia nyama na likolo ya makila kati na yango. Boye moko na moko amemaki ngombe na ye na butu mpe akataki yango kingo na esika yango.


Bongo Samuele akamataki libanga moko mpe atiaki yango kati na Mitsipa mpe Sheni ; apesaki yango kombo « Ebeni-Ezeri  » mpo na koloba : « Kino na esika oyo, Yawe asungi biso. »


Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.


Samuele akamataki mwana meme ya mobali, oyo ezalaki nanu komela mabele, mpe abonzaki yango mobimba lokola mbeka ya kotumba epai na Yawe. Abelelaki Yawe mpo na Isalaele, mpe Yawe ayokaki losambo na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ