1 Samuele 14:33 - Mokanda na Bomoi33 Moto moko alobaki na Saulo : — Tala ! Bato bazali kosala masumu liboso ya Yawe na ndenge bazali kolia nyama na likolo ya makila. Saulo alobaki : — Bokweyisi kondima ! Botindika sik’oyo libanga moko ya monene kino awa. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Saulo abakisaki : Bokende kati na bato mpe boloba na bango ete moko na moko amemela ngai ngombe na ye mpe meme na ye, mpe akata yango kingo na esika oyo. Bongo bokolia yango mpe bokosala masumu te liboso ya Yawe na kolia nyama na likolo ya makila kati na yango. Boye moko na moko amemaki ngombe na ye na butu mpe akataki yango kingo na esika yango.