Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 14:32 - Mokanda na Bomoi

32 Bamibwakaki na bomengo ya bitumba mpe bakamataki biloko oyo : bameme, bangombe mpe bana ngombe. Bakataki yango kingo na mabele mpe baliaki yango na likolo ya makila na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 14:32
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bokolia te mosuni oyo ezali na makila, pamba te makila ezali bomoi.


Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ndenge bozali nanu kolia misuni mpe makila na yango, bongo bozali kotalela banzambe na bino ya bikeko mpe kosopa makila ya bato, bozwa solo mokili lokola libula !


Bokolia te nyama oyo ezali na makila kati na yango. Bokosalela soloka to kindoki te.


Ezali mobeko ya seko mpo na milongo oyo ekoya, na bisika nyonso oyo bokovanda : bokolia te ezala mafuta to makila. › »


Na esika ya kotungisa bango, tosengeli kaka kokomela bango ete balia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basala kindumba te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bamela makila te.


Bolia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bomela makila te, bolia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bosala kindumba te. Ekozala malamu soki bokimi makambo yango. Botikala malamu !


Kasi bosengeli te kolia makila ; bosopa yango lokola mayi na mabele.


Mpo na nini otosaki Yawe te ? Mpo na nini owelaki kozwa bomengo ya bitumba, mpe osalaki mabe na miso ya Yawe ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ