Na mokolo oyo Yawe akabaki bato ya Amori na maboko ya bana ya Isalaele, Jozue alobaki na Yawe na miso ya Isalaele : « Moyi, telema na Gabaoni ! Sanza, telema na lubwaku ya Ayaloni ! »
Saulo aponaki mibali nkoto misato kati na Isalaele : bato nkoto mibale bazalaki elongo na ye na Mikimasi mpe kati na etuka ya ngomba ya Beteli, mpe bato nkoto moko bazalaki elongo na Jonatan, na Gibea ya Benjame. Bato mosusu oyo batikali, azongisaki bango na bandako na bango.
Bongo soki bato na biso baliaki na mokolo ya lelo mafuta ya nzoyi oyo bamonaki epai ya banguna na biso, kokweyisama ya bato ya Filisitia elingaki kozala monene !