Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 14:3 - Mokanda na Bomoi

3 Kati na bango, ezalaki na Nganga-Nzambe moko oyo azalaki kolata efode ; kombo na ye ezalaki « Ayiya. » Ayiya azalaki mwana mobali ya Ayitubi, ndeko mobali ya I-Kabodi, mwana mobali ya Fineasi mpe koko ya Eli oyo azalaki Nganga-Nzambe ya Yawe, na Silo. Soda moko te ayebaki ete Jonatan akendeki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 14:3
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mibu nyonso, Elikana azalaki kolongwa na engumba na ye mpo na kokende kogumbamela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe kobonzela Ye mbeka na Silo epai wapi Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki Banganga-Nzambe.


Saulo alobaki : — Tokita mpe tolanda bato ya Filisitia na butu ya lelo, tobebisa bango kino na tongo mpe totika ata moto moko te ya bomoi kati na bango. Bato bazongisaki : — Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu. Kasi Nganga-Nzambe alobaki : — Totuna Nzambe na esika oyo.


Kasi Samuele azalaki kosala mosala na ye liboso ya Yawe. Elenge mobali Samuele azalaki kolata efode ya lino.


Naponaki tata na yo kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe, mpo ete amata na etumbelo na Ngai, atumba mbeka ya malasi mpe alata efode liboso na Ngai. Napesaki lisusu, na libota ya tata na yo, makabo nyonso ya bana ya Isalaele, makabo oyo bazikisa na moto.


Kaka Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki mpe koko ya Ayitubi, nde abikaki mpe akimaki mpo na kokende kosangana na Davidi.


Apesaki mwana yango kombo « I-Kabodi » oyo elingi kolakisa : Nkembo elongwe na Isalaele ! Atiaki makanisi na ye na Sanduku ya Nzambe, oyo babotoli, na tata-bokilo na ye mpe na mobali na ye, oyo bakufi.


Boye batindaki bato na Silo. Mpe longwa kuna, bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na kiti na Ye ya bokonzi kati na basheribe. Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki wana elongo na Sanduku ya Boyokani ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ