29 Jonatan alobaki : — Solo, tata na ngai akotisaki pasi kati na mokili. Botala ndenge nini elongi na ngai engengi ! Ezali mpo ete nalie mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi.
Eliya azongisaki : — Natie mobulu te kati na Isalaele. Kasi ezali nde yo mpe libota ya tata na yo bato bozali kosala mobulu, pamba te botosaki te mibeko ya Yawe mpe bolandi banzambe Bala.
Jozue alobaki : « Mpo na nini omemeli biso pasi ? Tika ete Yawe amonisa yo pasi lelo ! » Bongo bato nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki ; babambaki lisusu mabanga na bato oyo batikalaki mpe bato yango bakufaki ; mpe batumbaki bibembe na bango na moto.
Bongo moko kati na basoda alobaki na ye : — Tata na yo atiaki mampinga nyonso na se ya mokumba ya ndayi na koloba : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei na mokolo ya lelo. » Yango wana bato nyonso balembi.
Bongo soki bato na biso baliaki na mokolo ya lelo mafuta ya nzoyi oyo bamonaki epai ya banguna na biso, kokweyisama ya bato ya Filisitia elingaki kozala monene !