Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » Boye moto moko te amekaki kolia.