Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 14:27 - Mokanda na Bomoi

27 Kasi Jonatan ayokaki te ete tata na ye atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi ; apusaki nzete oyo azalaki na yango na loboko, azindisaki yango na mafuta ya nzoyi mpe aliaki yango, elongi na ye engengaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 14:27
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwana na ngai, lia mafuta ya nzoyi, pamba te ezalaka kitoko ! Mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi ekozala elengi na lolemo na yo.


Moto ya sembo oyo asopanaka liboso ya moto mabe azali lokola liziba ya potopoto mpe etima oyo ebimisaka mayi ya mabe.


Bongo moko kati na basoda alobaki na ye : — Tata na yo atiaki mampinga nyonso na se ya mokumba ya ndayi na koloba : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei na mokolo ya lelo. » Yango wana bato nyonso balembi.


Jonatan alobaki : — Solo, tata na ngai akotisaki pasi kati na mokili. Botala ndenge nini elongi na ngai engengi ! Ezali mpo ete nalie mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi.


Bongo Saulo alobaki na Jonatan : — Yebisa ngai likambo oyo osalaki. Jonatan alobaki : — Namekaki ndambo ya mafuta ya nzoyi na songe ya nzete oyo nazalaki na yango na maboko. Mpe sik’oyo nasengeli kokufa !


Bapesaki ye gato basala na bambuma ya figi mpe maboke mibale ya bambuma ya vino ekawuka. Sima na ye kolia yango, azwaki lisusu makasi, pamba te aliaki te mpe amelaki te wuta mikolo misato mpe babutu misato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ