1 Samuele 14:24 - Mokanda na Bomoi24 Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » Boye moto moko te amekaki kolia. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo : « Tika ete moto oyo akoluka kotonga lisusu engumba Jeriko alakelama mabe liboso ya Yawe ! Solo, akofuta motuya ya bomoi ya mwana na ye ya liboso ya mobali, tango akotonga miboko na yango ; mpe motuya ya bomoi ya mwana na ye ya suka, tango akotia bikuke na yango. »