1 Samuele 14:23 - Mokanda na Bomoi23 Ezalaki ndenge wana nde Yawe abikisaki na mokolo wana bato ya Isalaele, mpe bitumba ekobaki kino ekatisaki Beti-Aveni. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango nyonso Yawe azalaki kobimisela bango elombe, abandaki mpe kozala elongo na elombe yango mpo na kobikisa bango wuta na maboko ya banguna na bango, na tango nyonso oyo elombe yango azalaki na bomoi. Solo Yawe azalaki koyokela bango mawa, pamba te azalaki koyoka bango kolela liboso ya banyokoli na bango mpe ya bato oyo bazalaki komonisa bango pasi.
Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele ; bazalaki na bashar nkoto tuku misato ; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba ; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni.
Alobaki na ye : « Lobi, na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko kowuta na etando ya Benjame ; okopakola ye mafuta mpo ete azala mokambi ya bato na Ngai, Isalaele. Akokangola bato na Ngai na maboko ya bato ya Filisitia, pamba te namoni pasi ya bato na Ngai, mpe koganga na bango ekomaki kino epai na Ngai. »