Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 14:20 - Mokanda na Bomoi

20 Bongo Saulo elongo na bato na ye nyonso basanganaki mpe bakendeki na bitumba ; bamonaki ete bato ya Filisitia bazali na mobulu makasi, bazali kobomana bango na bango na mipanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 14:20
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi ya Isalaele apusanaki, abebisaki bampunda elongo na bashar mpe alongaki bato ya Siri na elonga monene.


Bato ya Amoni mpe ya Moabi batelemaki mpo na kobundisa, koboma mpe kobebisa bavandi ya bangomba Seiri. Tango basilisaki koboma bavandi ya Seiri, bakomaki kobomana bango na bango.


« Nakosala ete bato ya Ejipito batelemelana bango na bango : ndeko akobundisa ndeko na ye, moninga akobundisa moninga na ye, engumba moko ekobundisa engumba mosusu, mpe mboka moko ekobundisa mboka mosusu.


Nakobengisa mopanga mpo na kobundisa Gogi, na bangomba na Ngai nyonso, elobi Nkolo Yawe. Mopanga ya moto na moto ekoboma ndeko na ye.


Tango bakelelo nkama misato ebetaki lisusu, Yawe asalaki ete, kati na molako mobimba, moto na moto atuba moninga na ye mopanga ; mpe bango nyonso bakimaki kino na Beti-Shita, na ngambo ya Tserera, mpe kino na ngambo ya Abele-Meola pembeni ya Tabati.


Bakengeli ya Saulo, oyo bazalaki na Gibea ya Benjame bamonaki mampinga kopalangana na bangambo nyonso.


Alobaki na ye : « Lobi, na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko kowuta na etando ya Benjame ; okopakola ye mafuta mpo ete azala mokambi ya bato na Ngai, Isalaele. Akokangola bato na Ngai na maboko ya bato ya Filisitia, pamba te namoni pasi ya bato na Ngai, mpe koganga na bango ekomaki kino epai na Ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ