1 Samuele 14:19 - Mokanda na Bomoi19 Wana Saulo azalaki nanu kosolola na Nganga-Nzambe, mobulu ezalaki kaka kokoma makasi kati na molako ya bato ya Filisitia. Boye Saulo alobaki na Nganga-Nzambe : « Tika ! Kotuna Yawe ezali lisusu na tina te. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » Boye moto moko te amekaki kolia.