Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 14:18 - Mokanda na Bomoi

18 Saulo alobaki na Ayiya : « Boya na Sanduku ya Nzambe. » Pamba te na tango wana, Sanduku ya Nzambe ezalaki elongo na bato ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 14:18
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Iri azongiselaki Davidi : — Sanduku, Isalaele mpe Yuda bazali kovanda na bandako ya kapo ; mpe Joabi, nkolo na ngai, elongo na bato na ye bazali kolala libanda kati na zamba. Ndenge nini ngai nakende na ndako na ngai mpo na kolia, komela mpe kolala na mwasi na ngai ? Solo, na kombo na yo mokonzi, nakoki kosala likambo ya boye te.


Akokende kotelema liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, oyo akotuna mokano na Yawe mpo na ye, na nzela na Urimi. Na mokano wana nde, ye mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakobanda kobima mpe kokota.


Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe : — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ? Yawe azongisaki : — Yuda akokende liboso.


Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ? Yawe azongiselaki bango : — Bokende kobundisa bango.


Bongo Saulo alobaki na basoda oyo bazalaki elongo na ye : « Botanga basoda mpo na koyeba banani basili kokima. » Tango batangaki, bamonaki ete Jonatan mpe elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye bazali te.


Saulo alobaki : — Tokita mpe tolanda bato ya Filisitia na butu ya lelo, tobebisa bango kino na tongo mpe totika ata moto moko te ya bomoi kati na bango. Bato bazongisaki : — Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu. Kasi Nganga-Nzambe alobaki : — Totuna Nzambe na esika oyo.


Tango Davidi ayokaki sango ya mabe oyo Saulo azali kobongisa mpo na ye, alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari ete amema efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.


Bato ya Filisitia bakotisaki Sanduku ya Nzambe kati na tempelo ya Dagoni, nzambe na bango, mpe batiaki yango pembeni ya ekeko ya Dagoni.


Bato ya Kiriati-Yearimi bayaki kozwa Sanduku ya Yawe mpe bamemaki yango na ndako ya Abinadabi, na ngomba moke ; mpe babulisaki Eleazari, mwana na ye ya mobali, mpo ete abatelaka Sanduku ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ