Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 14:15 - Mokanda na Bomoi

15 Mpe kobanga makasi ekotaki kati na molako, kati na etando mpe kati na bato nyonso : ezala basoda oyo bazalaki kokengela molako mpe basoda ya mpiko, bango nyonso bakomaki kobanga makasi mpe mabele eninganaki. Ezalaki somo oyo Ye moko Nzambe atindaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 14:15
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, bakendeki. Kanda na Nzambe ekweyelaki bingumba nyonso ya zingazinga na bango, mpe moko te alandaki bana mibali ya Jakobi.


Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya Mirie, na tango wana nde okobima noki, pamba te ekolakisa ete Yawe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. »


Somo elandaka ye bisika nyonso oyo atambolaka.


Somo monene ekangi bango, pamba te Nzambe azali kati na bato ya sembo.


Milinga ezipaki ngomba Sinai mpo ete Yawe akitaki na likolo na yango na lolenge ya moto, bongo milinga yango ezalaki komata lokola milinga oyo ebimaka na fulu ya moto. Mpe ngomba nyonso eninganaki makasi.


elongi na ye etelaki na somo mpe makanisi na ye ekomaki kotambola, nzoto na ye mobimba ekomaki kolenga mpe mabolongo na ye ekomaki kotutana.


Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.


mpe alobaki na bango : — Nayebi ete Yawe apesi mokili oyo na maboko na bino. Tozali na somo makasi mpo na bino mpe bavandi nyonso ya engumba oyo bazali kolenga na somo likolo na bino.


Wana soda moko na moko ya Isalaele atelemaki na esika na ye zingazinga ya molako, banguna kati na molako bapotaki mbangu, bagangaki mpe bakimaki.


Longwa na molako ya bato ya Filisitia, mampinga ya basoda ya mpiko ebimaki mpe ekabwanaki na masanga misato : lisanga ya liboso ezwaki nzela oyo ekenda kino na Ofira, na mokili ya Shuwali ;


lisanga ya mibale etalisaki na nzela ya Beti-Oroni ; mpe lisanga ya misato ezwaki nzela oyo ekenda na mondelo ya Lubwaku ya Tseboyimi, na ngambo ya esobe.


Limpinga moko ya basoda ya Filisitia eyaki kotelema na kati-kati ya lubwaku ya Mikimasi.


Na etumba oyo ya liboso, Jonatan elongo na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye babomaki bato pene tuku mibale, na etando oyo bangombe mibale ekoki kobalola na mokolo moko.


Bakengeli ya Saulo, oyo bazalaki na Gibea ya Benjame bamonaki mampinga kopalangana na bangambo nyonso.


Wana Samuele azalaki kobonza mbeka ya kotumba, bato ya Filisitia bapusanaki pembeni mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Kasi na mokolo wana, Yawe atindelaki bato ya Filisitia kake makasi oyo ekotisaki mobulu kati na bango. Mpe bato ya Isalaele balongaki bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ