14 Na etumba oyo ya liboso, Jonatan elongo na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye babomaki bato pene tuku mibale, na etando oyo bangombe mibale ekoki kobalola na mokolo moko.
Ata azali sik’oyo ya kobombama kati na lidusu ya mabanga to na esika songolo, nzokande tango kaka bato kati na mampinga na biso bakobanda kokufa, ekozanga te komonana moto oyo akoyoka yango mpe akoloba : « Kati na bato oyo bazali kolanda Abisalomi, ebele bakufi. »
Abimeleki abengaki na lombangu elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe alobaki na ye : « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai mpo baloba te na tina na ngai : ‹ Mwasi moko abomaki ye. › » Boye, elenge mobali atobolaki ye mopanga mpe akufaki.
Jonatan asalelaki makolo mpe maboko na ye mpo na komata, mpe elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye alandaki ye na sima. Wana Jonatan azalaki kokweyisa bato ya Filisitia na liboso ; na sima na ye, elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki koboma bango.