Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 14:10 - Mokanda na Bomoi

10 Kasi soki balobi na biso : « Boya epai na biso, » tokokende epai na bango, pamba te yango ekozala elembo mpo na biso ete Yawe akabi bango na maboko na biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 14:10
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete mwana mwasi oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, tengemisa mbeki na yo mpo ete namela mayi, › mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo, › azala mwasi oyo oponi mpo na Izaki, mosali na Yo. Na nzela oyo, nakoyeba ete olakisi bolamu na Yo epai ya nkolo na ngai. »


Ezayi azongisaki : — Tala elembo oyo Yawe apesi yo mpo na kotalisa ete akokokisa makambo oyo alaki yo : Olingi ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi to ezonga sima na matambe zomi ?


Nzambe alobaki : — Nakozala na yo elongo. Mpe tala elembo oyo ekolakisa yo ete Ngai nde natindi yo : tango okobimisa bato na Ngai na Ejipito, bokogumbamela Nzambe na ngomba oyo.


Jedeon alobaki na Nzambe : « Soki okobikisa Isalaele na nzela ya maboko na ngai lokola olakaki ngai,


mpe yoka maloba oyo bazali koloba. Boye okozwa makasi ya kobundisa bango. » Jedeon akitaki elongo na Pura, mosali na ye ya mobali, kino na liboso ya molako ya bitumba.


Soki kaka omoni bilembo oyo kokokisama, wana sala na yo nyonso oyo okoki kosala mpo na yo moko, pamba te Nzambe azali elongo na yo.


Soki balobi na biso : « Botelema wana, bozela kino biso moko tokoya epai na bino ; » wana tokovanda na esika oyo tozali mpe tokokende epai na bango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ