Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 13:6 - Mokanda na Bomoi

6 Tango bato ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi, mpe ete mampinga na bango ezingami na bangambo nyonso, babombamaki kati na madusu ya mabanga, kati na mabulu, kati na mabanga, mpe kati na bandako ya se ya mabele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 13:6
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi azongiselaki Gadi : — Nazali na pasi makasi na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato.


Kasi tala bato oyo bomengo na bango, babotola yango mpe babebisa bango ; bakanga bango nyonso na mabulu mpe babomba bango kati na boloko, bakoma lokola bomengo ya bitumba, bongo moto akokangola bango azali te ; bakoma lokola mosuni, bongo moto akoloba : « Zongisa bango, » azali te.


Libulu epai wapi Isimaeli abwakaki bato nyonso oyo abomaki ezalaki libulu ya Gedalia, libulu oyo mokonzi Asa asalaki mpo na komibatela liboso ya Baesha, mokonzi ya Isalaele. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, atondisaki yango na bibembe ;


Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na Kombo na Ngai, bato oyo batikali na bisika oyo ebeba bakokufa na mopanga ! Ba-oyo bazali na mboka, nakokaba bango epai ya banyama ya zamba mpo ete eboma bango ! Mpe ba-oyo babombami kati na bandako batonga makasi mpe kati na madusu ya mabanga bakokufa na bokono oyo ebomaka ;


Makambo mibale ezali kobenda ngai ngambo na ngambo : na ngambo moko, kokufa mpo na kozala elongo na Klisto, pamba te yango nde eleki malamu ;


ya solo, mokili etikalaki lisusu malamu te mpo na bango, bakomaki koyengayenga kati na bisobe, na bangomba, kati na bibombamelo ya mabanga mpe na mabulu oyo ezalaka na se ya mabele.


Tango bato ya Ayi batalaki na sima, bamonaki milinga komata na likolo wuta na engumba ; moko te akokaki lisusu kokima na ngambo moko to na ngambo mosusu. Bana ya Isalaele oyo bazalaki kokima na esobe babalukelaki bato oyo bazalaki kolanda bango.


Bato ya Amoni mpe bakatisaki na ngambo ya Yordani mpo na kobundisa libota ya Yuda, ya Benjame mpe ya Efrayimi. Boye, Isalaele akomaki na pasi mingi.


Bana ya Isalaele babalolaki elongi na bango mpo na kotala mibali ya Benjame. Bongo mibali ya Benjame babangaki mpo ete bamonaki likama oyo ekomeli bango.


Lokola loboko ya bato ya Madiani ezalaki na nguya makasi likolo ya Isalaele, bana ya Isalaele babongisaki mabulu ya kokimela mpe bibombelo kati na mabanga, kuna na likolo ya bangomba.


Bongo Samuele alongwaki na Giligali mpe akendeki na Gibea ya Benjame. Mpe Saulo atangaki bato oyo bazalaki elongo na ye : bazalaki bato pene nkama motoba.


Boye, bango mibale bamimonisaki na molako ya bato ya Filisitia. Mpe tango bato ya Filisitia bamonaki bango, balobaki : « Botala ! Ba-Ebre babimi wuta na mabulu epai wapi babombamaki. »


Tango bato nyonso ya Isalaele oyo babombamaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi bayokaki ete bato ya Filisitia bazali kokima, bango mpe balandaki mpe babundisaki bato ya Filisitia.


Bato ya Zifi bakendeki na Gibea epai ya Saulo mpe balobaki na ye : — Boni, Davidi abombami te kati na biso, na bisambelo ya likolo ya bangomba ya Oreshi, kati na esobe, na likolo ya ngomba moke ya Akila oyo ezali na ngambo ya sude ya Yeshimoni ?


Na bongo, Saulo azwaki basoda ya mpiko nkoto misato kati na Isalaele mobimba mpe akendeki koluka Davidi mpe bato na ye pene ya etando ya bantaba ya zamba.


Tango bato ya Isalaele, oyo bazalaki na ngambo mosusu ya lubwaku mpe ba-oyo bazalaki na ngambo mosusu ya Yordani bamonaki ete mampinga ya Isalaele esili kopanzana, mpe ete Saulo mpe bana na ye ya mibali bakufi, basundolaki bingumba na bango mpe bakimaki. Bato ya Filisitia bayaki kovanda na bingumba yango.


Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bato ya Isalaele basangani na Mitsipa, bakambi ya bato ya Filisitia bayaki kobundisa bango. Bongo tango bato ya Isalaele bayokaki sango yango, babangaki bato ya Filisitia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ