Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 13:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele ; bazalaki na bashar nkoto tuku misato ; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba ; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 13:5
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.


Boye tala toli na ngai : « Tika ete Isalaele mobimba basangana epai na yo, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bazala ebele lokola zelo ya ebale monene ! Bongo yo moko okotambola liboso na bango na bitumba.


Akabi mpe na ngambo na ye, asangisaki bato ya Isalaele mpe apesaki bango bibundeli ; boye babimaki mpo na kobundisa bato ya Siri. Bato ya Isalaele batongaki milako oyo ezalaki kotalana na bato ya Siri. Mampinga na bango ezalaki lokola bitonga mibale ya mike ya bantaba wana bato ya Siri batondaki na etando mobimba.


Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, tika ete elaka oyo opesaki epai ya Davidi, tata na ngai, ekokisama ! Pamba te ezali Yo nde otie ngai mokonzi ya bato oyo bazali ebele lokola putulu ya mabele.


Tala bango wana bazali koya na Ayati, bazali koleka na lubwaku ya Migironi, babombi biloko na bango na Mikimasi.


bakitani na yo balingaki kozala lokola zelo, bana na yo, lokola motango ya mbuma ya zelo ; kombo na bango elingaki kolongwa te to kobebisama te liboso na Ngai.


Basi na bango oyo bakufisa mibali, nakokomisa bango ebele koleka zelo ya ebale monene. Na ngonga ya midi, nakoyeisa mobebisi mpo na koboma bamama ya bana na bango ; nakokweyisela bango somo mpe pasi na mbalakata.


Bavandi ya Samari bazali kolenga mpo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni ; bato na yango mpe Banganga-Nzambe oyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombe bakosala matanga na tina na yango. Tika ete basepela lelo mpo ete nkembo ya mwana ngombe elongwe kati na bango.


Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te ! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba : « Na Kombo na Yawe ! »


Bobeta kelelo, na Gibea, mpe liseke, kuna na Rama ! Bobeta lolaka ya bitumba na Beti-Aveni ! Oh Benjame, keba !


Ezayi agangaki na tina na Isalaele : « Ata soki motango ya bana ya Isalaele ezalaki lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakobika.


Babimaki elongo na mampinga na bango nyonso, mpe bato bazalaki ebele lokola zelo ya ebale elongo na motango monene ya bampunda mpe ya bashar.


Na ngambo ya nor, mondelo na bango ezalaki longwa na Yordani, emataki na mopanzi ya Jeriko, ekatisaki mokili ya bangomba, na ngambo ya weste, mpe esukaki na esobe, na Beti-Aveni.


Wuta na Jeriko, Jozue atindaki bato kokende na engumba Ayi oyo ezalaki pene ya Beti-Aveni, na ngambo ya este ya Beteli. Alobaki na bango : « Bokende kononga mokili wana. » Bato yango bakendeki mpe banongaki Ayi.


Bato ya Madiani, ya Amaleki mpe ya ngambo ya este bazalaki ya kopanzana kati na lubwaku, ebele lokola mabanki. Bashamo na bango ezalaki ebele koleka zelo ya ebale.


Samuele atunaki ye : — Osali penza nini ? Saulo azongisaki : — Tango namonaki ete bato babandi kopalangana mosika na ngai, mpe ete yo oyei te na ngonga oyo ekatamaki, mpe ete bato ya Filisitia bazali kosangana na Mikimasi,


Saulo aponaki mibali nkoto misato kati na Isalaele : bato nkoto mibale bazalaki elongo na ye na Mikimasi mpe kati na etuka ya ngomba ya Beteli, mpe bato nkoto moko bazalaki elongo na Jonatan, na Gibea ya Benjame. Bato mosusu oyo batikali, azongisaki bango na bandako na bango.


Ezalaki ndenge wana nde Yawe abikisaki na mokolo wana bato ya Isalaele, mpe bitumba ekobaki kino ekatisaki Beti-Aveni.


Na mikolo nyonso ya bomoi ya Saulo, bitumba ezalaki makasi na bato ya Filisitia ; mpe bisika nyonso oyo Saulo azalaki komona bato ya makasi to ya mpiko, azalaki kozwa mpe kokotisa bango kati na mampinga na ye.


Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango mpo na bitumba, basanganaki na Soko ya Yuda mpe batongaki molako na bango na Efeze-Damimi, kati na Soko mpe Azeka.


Bato ya Filisitia bayokisamaki soni mpe bazongelaki lisusu te kokota na mokili ya Isalaele. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Samuele, loboko na Yawe etelemelaki bato ya Filisitia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ