1 Samuele 13:3 - Mokanda na Bomoi3 Jonatan alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki na Geba. Bongo bato ya Filisitia bayokaki sango na yango. Boye Saulo abetaki kelelo kati na mokili mobimba, mpe alobaki : « Tika ete Ba-Ebre bayoka ! » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »
Mokili mobimba, longwa na Geba kino na Rimoni, na ngambo ya sude ya Yelusalemi, ekokoma lokola etando ya Araba ; kasi Yelusalemi ekozala kaka na likolo, ekotikala kaka na esika na yango, longwa na Ekuke ya Benjame kino na esika oyo Ekuke ya kala ezalaki, na songe ya bamir, longwa na ndako molayi ya Ananeyeli kino na bikamolelo ya mokonzi.
Sima na yango, okokende na Gibea ya Nzambe epai wapi bayangeli ya Filisitia bazali. Wana okopusana na engumba, okokutana na ngulupa ya basakoli kowuta na esambelo ya likolo ya ngomba. Liboso na bango, ekozala na babeti mandanda, bambunda ya mike, baflite mpe banzenze. Wana bakozala kobeta mindule, basakoli yango bakokoma kosakola.