Na mokili mobimba, » elobi Yawe, « bandambo mibale ya bato kati na bandambo misato bakobebisama mpe bakokufa ; mpe ndambo moko ya bato kati na bandambo misato nde bakotikala na mokili.
Yango wana, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kokende epai ya bato ya Filisitia mpo na kotia minu na basonge ya bibende oyo bangombe etimolaka na yango mabele, na bapiki, na bipasola mpe na bapawu.
Boye, na mokolo ya bitumba, soda ata moko te oyo azalaki elongo na Saulo mpe na Jonatan azalaki na mopanga to na likonga na loboko na ye ; kaka Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali, nde bazalaki na yango.