Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 13:19 - Mokanda na Bomoi

19 Nzokande, na tango wana, batuli bibende bazalaki lisusu te kati na mokili mobimba ya Isalaele, pamba te bato ya Filisitia balobaki : « Ba-Ebre bakoki kosala te, ezala makonga to matolotolo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 13:19
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amemaki Yelusalemi mobimba na bowumbu : bakonzi nyonso ya basoda mpe basoda, bato nyonso ya mayele ya misala ya maboko mpe ba-oyo basalelaka bibende. Bango nyonso bazalaki bato nkoto zomi. Kaka babola nde batikalaki kati na mokili.


Tala, ezali Ngai nde nakelaki monyangwisi bibende na moto oyo apelisaka moto makasi na makala mpe asalaka ebundeli mpo ete esala mosala na yango. Ezali mpe kaka Ngai nde nakelaki mobebisi mpo ete asala mosala ya kobebisa.


Sima na Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, komema na bowumbu, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni : Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, bakalaka ya Yuda, bato ya misala ya maboko mpe bato oyo balambaka bibende na moto ; Yawe alakisaki ngai bitunga mibale ya bambuma ya figi oyo batiaki liboso ya Tempelo ya Yawe.


Mokanda yango etindamaki sima na bato oyo kokende na bawumbu longwa na Yelusalemi : mokonzi Yekonia, mama ya mokonzi, bakalaka na ye ya lokumu, bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bato oyo balambaka bibende na moto mpe bato ya misala ya maboko.


Tango baponaki banzambe ya sika, bitumba mpe ekomaki na bikuke ya engumba, kasi ata nguba moko te to likonga moko te emonanaki kati na basoda nkoto tuku minei kati na Isalaele.


Yango wana, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kokende epai ya bato ya Filisitia mpo na kotia minu na basonge ya bibende oyo bangombe etimolaka na yango mabele, na bapiki, na bipasola mpe na bapawu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ