Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 13:12 - Mokanda na Bomoi

12 namilobelaki : « Sik’oyo, bato ya Filisitia bazali koya kobundisa ngai na Giligali, kasi ngai nabondeli Yawe te ! » Yango wana, nazwaki mokano ya kobonza mbeka ya kotumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 13:12
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boloba na Nzambe : « Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango ! Mpo na nguya monene na Yo, banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.


Bozali koloba : « Feti ya ebandeli ya sanza ekoleka tango nini mpo ete toteka ble na biso ? Tango nini mokolo ya Saba ekosila mpo ete tofungola bibombelo na biso ya ble ? » Tokosalela bakopo ya mike mpo ete tomatisa talo, mpe tokosalela bimekelo ya lokuta.


Tika ete moko na moko kati na bino apesa oyo akanaki kopesa kati na motema na ye, na mawa te mpe na makasi te, pamba te Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.


Samuele atunaki ye : — Osali penza nini ? Saulo azongisaki : — Tango namonaki ete bato babandi kopalangana mosika na ngai, mpe ete yo oyei te na ngonga oyo ekatamaki, mpe ete bato ya Filisitia bazali kosangana na Mikimasi,


Samuele alobaki na Saulo : — Osali lokola moto ya liboma ! Obateli te mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo. Soki obatelaki yango, alingaki kolendisa bokonzi na yo kati na Isalaele mpo na libela.


Na tongo-tongo, Samuele atelemaki mpo na kokende kokutana na Saulo. Kasi bayebisaki ye : « Saulo akei na Karimeli, atongi kuna ekeko mpo na ye moko, bongo alongwe kuna mpe akei kino na Giligali. »


Samuele alobaki : — Boni, Yawe asepelaka mingi na bambeka ya kotumba mpe na makabo koleka kotosa mongongo na Ye ? Te ! Botosi eleki mbeka ; koyoka eleki mafuta ya meme ya mobali.


Bongo Nganga-Nzambe apesaki ye mapa ebulisama, pamba te azalaki na mapa mosusu te. Ezalaki mapa oyo batiaki liboso ya Yawe, oyo bawuti kolongola na miso na Ye mpo na kotia mapa mosusu oyo ebimi sika na moto, na esika ya mapa oyo ya liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ