1 Samuele 12:3 - Mokanda na Bomoi3 Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani ? Nazwaki ane ya nani ? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi ? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai ? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Soki moto azali koleisa bibwele na ye matiti na elanga na ye to na elanga na ye ya vino, bongo atiki bibwele yango koyengayenga mpe ekeyi kolia matiti na elanga to na elanga ya vino ya moto mosusu, nkolo bibwele asengeli kofuta mbuma oyo eleki kitoko kati na elanga na ye to kati na elanga na ye ya vino.
Sik’oyo, nasali mabongisi ya koya kotala bino mpo na mbala ya misato ; mpe nakomemisa bino mokumba na ngai te, pamba te nazali koluka biloko na bino te, kasi nazali nde koluka bino moko. Kobomba biloko mpo na baboti ezali likambo ya bana na bango te, kasi ezali baboti nde basengeli kobomba biloko mpo na bana na bango.