yoka bango wuta na likolo, limbisa masumu ya bawumbu na Yo mpe ya Isalaele, bato na Yo, —tango osili kolakisa bango nzela malamu oyo basengeli kolanda— mpe tinda mvula na mokili na Yo, mokili oyo opesaki lokola libula epai ya bato na Yo.
yoka bango wuta na Likolo, limbisa masumu ya bawumbu na Yo mpe ya Isalaele, bato na Yo, —tango osili kolakisa bango nzela malamu oyo basengeli kolanda— mpe tinda mvula na mokili na Yo, mokili oyo opesaki lokola libula epai ya bato na Yo.
Yawe alobaki na ngai : « Ata soki Moyize mpe Samuele batelemi liboso na Ngai mpo na koloba na tina na bato oyo, nakotikala koyokela bato oyo mawa te. Bengana bato oyo liboso na ngai ! Tika ete bakende mosika na Ngai !
Soki bazali solo basakoli mpe Liloba na Yawe ezali kati na bango, tika ete basambela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete bisalelo oyo etikalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe kati na Yelusalemi ekende na Babiloni te.
Mosakoli Jeremi alobaki na bango : — Nayoki bino ! Nakobondela Yawe, Nzambe na bino, ndenge ezali bosenga na bino ; mpe nakoyebisa bino makambo nyonso oyo Yawe akoloba, nakobombela bino ata likambo moko te.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›
Nzokande, boyebi malamu ete nazalaki na somo te ya koteya makambo nyonso oyo ekokaki kosunga bino. Nateyaki bino, ezala na esika ya bato ebele to na ndako ya moko na moko.
Nzambe oyo nasalelaka na motema na ngai mobimba tango nateyaka Sango Malamu ya Mwana na Ye, azali Motatoli na ngai ete natikaka te kotanga kombo na bino
Koteya Sango Malamu ezali likambo oyo ngai nasengeli te komikumisa na yango, pamba te mosala yango epesamelaki ngai na makasi. Mawa na ngai soki nateyi te Sango malamu !
Yango wana, wuta mokolo oyo toyokaki sango na tina na bino, totikaka te kobondela mpo na bino mpe kosenga na Nzambe ete atondisa bino na boyebi ya mokano na Ye, na bwanya nyonso mpe na bososoli oyo Molimo apesaka,
Tobondelaka Nzambe na molende nyonso, butu mpe moyi, mpo ete apesa biso nzela ya komona bino lisusu mpe ya kokokisa oyo ezangi kati na kondima na bino.
Nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe oyo nasalelaka na motema peto ndenge bakoko na ngai bazalaki kosala, pamba te tango nyonso, ezala butu to moyi, nabosanaka yo te na mabondeli na ngai.
Bato nyonso balobaki na Samuele : — Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na basali na yo mpo ete tokufa te, pamba te tobakisaki lisusu na likolo ya masumu na biso, likambo ya mabe ya kosenga mokonzi mpo na biso.