1 Samuele 12:19 - Mokanda na Bomoi19 Bato nyonso balobaki na Samuele : — Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na basali na yo mpo ete tokufa te, pamba te tobakisaki lisusu na likolo ya masumu na biso, likambo ya mabe ya kosenga mokonzi mpo na biso. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi sik’oyo, bokamata bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali ; bokende epai ya Yobo, mosali na Ngai, botumba mbeka mpo na bino moko. Yobo, mosali na Ngai, akobondela mpo na bino ; mpe mpo na kondima na ye, nakoyamba libondeli na ye mpo ete nasalela bino te kolanda bozoba na bino. Pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki. »
Soki omoni ndeko na yo kosala lisumu oyo ememaka na kufa te, osengeli kobondela mpo na ye, mpe Nzambe akopesa ye bomoi. Nazali koloba nde na tina na bato oyo basalaka lisumu oyo ememaka na kufa te. Kasi ezali na lisumu oyo ememaka na kufa ; ezali te na tina na lisumu yango nde nazali kosenga na bino kobondela.