Bongo Samuele alobaki na bato nyonso : — Botala moto oyo Yawe aponi ! Kati na bato nyonso, moko te akokani na ye. Bato bazongisaki na koganga : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi !
Bato nyonso bakendeki na Giligali mpe batiaki kuna Saulo lokola mokonzi, na miso ya Yawe. Babonzaki kuna bambeka ya boyokani na miso ya Yawe, mpe Saulo elongo na mibali nyonso ya Isalaele basepelaki makasi.
Bato nyonso balobaki na Samuele : — Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na basali na yo mpo ete tokufa te, pamba te tobakisaki lisusu na likolo ya masumu na biso, likambo ya mabe ya kosenga mokonzi mpo na biso.
Balobaki na ye : « Tala, yo okomi na yo mobange, mpe bana na yo ya mibali bazali kotambola te na banzela na yo. Sik’oyo, pona mokonzi oyo akokamba biso ndenge ezali na bikolo nyonso. »
Komitungisa na yo te na tina na ba-ane na yo, oyo ebungaki wuta mikolo misato, pamba te esili komonana. Bongo nani nkolo biloko nyonso ya motuya oyo ezali kati na Isalaele ? Ezali biloko na yo mpe libota mobimba ya tata na yo.