Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 12:11 - Mokanda na Bomoi

11 Boye, Yawe atindaki Yerubali oyo babengi Jedeon, Bedani, Jefite mpe Samuele. Akangolaki bino na maboko ya banguna na bino, oyo bazingelaki bino na bangambo nyonso. Mpe bovandaki na kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 12:11
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe apesaki mokangoli mpo na bato ya Isalaele, mpe balongwaki na se ya nguya ya bato ya Siri. Boye bato ya Isalaele bavandaki na bandako na bango ndenge ezalaki liboso.


Ulami abotaki : Bedani oyo azalaki mwana mobali. Bango nde bazalaki bakitani ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase.


Mokolo moko, abengisaki Baraki, mwana mobali ya Abinoami, moto ya Kedeshi ya Nefitali, mpe alobaki na ye : — Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi yo mitindo : « Kende, kamata elongo na yo bato nkoto zomi ya mabota ya Nefitali mpe ya Zabuloni, mpe mema bango na nzela oyo ekenda na ngomba Tabori.


Yawe abalukaki epai na ye mpe alobaki : — Kende, salela makasi oyo ozali na yango mpe bikisa bana ya Isalaele na maboko ya bato ya Madiani. Boni, ezali Ngai te nde natindi yo ?


Kasi Joasi azongiselaki bango nyonso oyo batelemelaki ye : — Boni, bino nde bokolobela Bala ? Bino nde bokobundela ye ? Moto nyonso oyo akobundela ye akokufa liboso ete tongo etana. Soki ye Bala azali nzambe, tika ete amibundela ye moko mpo ete babuki etumbelo na ye.


Kobanda mokolo wana, mpo ete Jedeon apanzaki etumbelo ya Bala, bakomaki kobenga ye « Yerubali » oyo elingi koloba : Tika ete Bala amibundela ye moko.


Na tongo-tongo, Yerubali, elingi koloba Jedeon, abimaki elongo na bato nyonso oyo balandaki ye mpe batongaki molako na bango pembeni ya etima ya mayi ya Arodi. Nzokande molako ya bato ya Madiani ezalaki na ngambo ya nor ya molako ya bana ya Isalaele, na lubwaku, pembeni ya ngomba moke ya More.


Yerubali, mwana mobali ya Joasi, azongaki na ndako na ye mpe avandaki kuna.


Bazongisaki ata bolamu moko te na libota ya Yerubali oyo elakisi Jedeon, mpo na bolamu nyonso oyo asalelaki Isalaele.


Bato nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bandimaki ete Samuele azali penza mosakoli ya Yawe.


Bato ya Filisitia bayokisamaki soni mpe bazongelaki lisusu te kokota na mokili ya Isalaele. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Samuele, loboko na Yawe etelemelaki bato ya Filisitia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ