Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 11:7 - Mokanda na Bomoi

7 Akamataki bangombe mibale, akataki yango na biteni mpe atindaki biteni yango na Isalaele mobimba na nzela ya bantoma. Bamemaki sango oyo : « Ezali boye nde bakosala bangombe ya moto nyonso oyo akolanda te Saulo mpe Samuele na bitumba. » Lokola somo makasi ya Yawe ekangaki bato ya Isalaele, batambolaki lokola moto moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 11:7
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, bakendeki. Kanda na Nzambe ekweyelaki bingumba nyonso ya zingazinga na bango, mpe moko te alandaki bana mibali ya Jakobi.


Babebisaki mpe bitonga ya bibwele, bamemaki bantaba mpe bameme ebele elongo na bashamo. Bongo, bazongaki na Yelusalemi.


Somo ya Yawe ekangaki bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Yuda, mpe ekokaki lisusu te kobundisa Jozafati.


Sik’oyo, tika botosi ya Yawe ezala kati na bino. Bokata makambo na bosolo ; pamba te epai na Yawe, Nzambe na biso, makambo oyo ezalaka te : kozanga bosembo, kopona bilongi mpe kanyaka. »


Kaka Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde bosengeli komona lokola Mosantu, Ye kaka nde bosengeli kokumisa, Ye kaka nde bosengeli koyoka somo.


Tango akomaki na ndako na ye, azwaki mbeli, akataki nzoto ya makangu na ye na biteni zomi na mibale mpe atindaki yango na etando nyonso ya Isalaele.


Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ