Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 11:5 - Mokanda na Bomoi

5 Kaka na tango yango, Saulo awutaki na bilanga, sima na bangombe na ye. Atunaki : « Likambo nini ya mabe ekweyeli bato mpo ete balela boye ? » Bayebisaki ye makambo nyonso oyo bato ya Yabeshi balobaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 11:5
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye : « Agari, likambo nini ? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye.


Eliya alongwaki wana mpe akutanaki na Elize, mwana mobali ya Shafati. Azalaki kobalola bilanga na bangombe tuku mibale na minei bakangisa mibale-mibale liboso na ye mpe ye moko azalaki kotambolisa bangombe mibale ya suka. Eliya apusanaki pembeni ya Elize mpe abwakelaki Elize kazaka na ye.


abengaki ye wuta na sima ya meme oyo azalaki kobatela mpo na kokomisa Ye mobateli ya Jakobi, bato na Ye, mpe ya Isalaele, libula na Ye.


Maloba na Yawe na tina na lubwaku ya Emoniseli : Likambo nini lisusu ekomeli bino sik’oyo mpo ete bino nyonso bomata na likolo ya mitondo ya ndako ?


Awa bazalaki kobelela sima na libota ya Dani, bana ya Dani babalukaki mpe batunaki Mika : — Likambo nini ezwi yo mpo ete omemela biso ebele ya bato boye ?


Kati na ekolo ya Benjame, ezalaki na moto moko ya bozwi ; kombo na ye ezalaki « Kishi, » mwana mobali ya Abieli, mwana mobali ya Tserori, mwana mobali ya Bekorati, mwana mobali ya Afia, moto ya ekolo ya Benjame.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ