Ezawu alobaki na tata na ye : — Tata na ngai, ozalaki kaka na lipamboli moko wana ? Tata na ngai, pambola ngai mpe ! Ezawu atombolaki mongongo na ye mpe alelaki makasi.
tika ete mokonzi akaba na maboko na biso mibali sambo kati na bakitani ya Saulo mpo ete todiembika banzoto na bango liboso ya Yawe, na Gibea, engumba ya Saulo, moponami na Yawe. Mokonzi alobaki : — Nakopesa bino bango.
Tala bakombo na bango : Akiezeri, mokonzi na bango ; Joasi, mwana mibali ya Shemaa, moto ya Gibea ; Yezieli mpe Peleti, bana mibali ya Azimaveti ; Beraka ; Jewu, moto ya Anatoti ;
Bokanisaka bato oyo bazali kati na boloko lokola nde bino mpe bozali kati na boloko elongo na bango. Bokanisaka bato oyo bazali komona pasi, mpo ete bino mpe bozali na nzoto oyo emonaka pasi.
Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ? Yawe azongiselaki bango : — Bokende kobundisa bango.
Bana ya Isalaele bakendeki, bango nyonso, na Beteli, mpe kuna, bavandaki mpe balelaki liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bana ya Isalaele bakilaki bilei kino na pokwa mpe babonzaki, epai na Yawe, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani.