3 Bampaka ya Yabeshi balobaki na ye : — Pesa biso mikolo sambo mpo ete totinda bantoma kati na mokili mobimba ya Isalaele ; soki moto moko te ayei kobikisa biso, wana tokomikaba na maboko na yo.
Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi : Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai ; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi mpe akomela mayi ya libulu na ye