Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 11:2 - Mokanda na Bomoi

2 Kasi Naashi, moto ya Amoni, azongisaki : — Nakoki kosala boyokani elongo na bino soki kaka bondimi ete natobola bino nyonso liso ya ngambo ya mobali. Na bongo, nakoyokisa Isalaele mobimba soni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 11:2
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balobaki na bango : — Tokoki kosala likambo ya boye te, tokoki te kopesa na libala ndeko na biso ya mwasi epai ya mobali oyo akatama ngenga te, pamba te ezali likambo ya soni mpo na biso.


Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi : Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai ; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi, mpe akomela mayi ya libulu na ye


Oteki bato na Yo na pamba mpe ozwi ata litomba te kowuta na boteki yango.


Alobaki lisusu : — Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. Boye Moyize abombaki elongi na ye, pamba te abangaki kotala Nzambe.


Moto ya sembo ayebaka ata baposa ya bibwele na ye, kasi motema ya moto mabe eyokaka mawa te.


Apesaki lisusu mitindo ete batobola miso ya Sedesiasi, bakanga ye minyololo ya bibende ya bronze mpo na komema ye na Babiloni.


Te, okotisi biso kutu te na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi to opesi biso ata libula moko te ya bilanga to ya bilanga ya vino. Boni, okanisi ete bato oyo bakufa miso ? Te, tokoya te !


Bato ya Filisitia bakangaki ye, batobolaki ye miso, bamemaki ye na Gaza mpe bakangaki ye minyololo ya bibende ya bronze. Akomaki konika bambuma ya ble na enikelo ya libanga kati na boloko.


Boye bato ya Yabeshi balobaki na bato ya Amoni : « Tokomikaba lobi na maboko na bino, mpe bokosala biso nyonso oyo bokomona ete ezali malamu. »


Kasi tango bomonaki Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, koya kobundisa bino, bolobaki na ngai : « Te ! Tozali na posa ya mokonzi mpo na kokamba biso. » Nzokande ezali Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki mokonzi na bino.


Davidi atunaki mibali oyo bazalaki pembeni na ye : — Eloko nini bakosala na moto oyo akoboma moto ya Filisitia oyo mpe akolongola soni kati na Isalaele ? Moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te azali nani mpo ete atiola mampinga ya Nzambe na bomoi ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ