Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.
Tango bokokende kobundisa banguna na bino mpe bokomona bampunda, bashar mpe mampinga ya basoda ebele koleka oyo ya bino, bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, akozala elongo na bino.
Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »
Na mikolo nyonso ya bomoi na yo, moto moko te akolonga kotelemela yo. Ndenge nazalaki elongo na Moyize, ndenge wana mpe nakozala elongo na yo ; nakotika yo te mpe nakosundola yo te.
Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »
Bongo, na tongo-tongo, wana moyi ezali kobima, okokende mpe okobundisa engumba. Tango Gali elongo na bato na ye nyonso bakobima mpo na kokutana na yo, sala nyonso oyo loboko na yo ekoki kosala. »
wana tika ete Yawe asala na ngai Jonatan nyonso oyo ekozala malamu na miso na Ye ! Kasi soki tata na ngai azali na makanisi ya kosala yo mabe, ngai nakoyebisa yo mpe nakotika yo kokende mpo ete okende na yo na kimia. Tika ete Yawe azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na tata na ngai !