Nakokita mpe nakosolola na yo kuna. Nakokamata Molimo oyo ezali epai na yo mpe nakotia yango epai na bango. Bongo, bakosunga yo mpo na komema mokumba ya bato oyo mpo ete omema yango lisusu yo moko te.
Yawe akitaki na nzela ya lipata mpe asololaki na ye ; akamataki nguya ya Molimo, oyo ezalaki epai na Ye, mpe atiaki yango epai ya bakambi tuku sambo. Tango kaka Molimo akitelaki bango, bakomaki kosakola, kasi bakobaki te.
Nzokande, bato mibale oyo bakombo na bango ezalaki Elidadi mpe Medadi batikalaki kati na molako. Bango mpe bazalaki na molongo ya bampaka, kasi bakendeki te na Ndako ya kapo. Molimo akitelaki bango mpe bakomaki kosakola kati na molako.
Na mokolo ya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai : ‹ Nkolo ! Nkolo ! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwa ebele ? ›
Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Boye, Samison apasolaki nkosi na kati-kati, na maboko pamba, ndenge bapasolaka mwana ntaba. Kasi kati na makambo oyo asalaki, ayebisaki eloko moko te epai ya tata to mama na ye.
Tango bakomaki pembeni ya etuka ya Leyi, bato ya Filisitia bayaki kokutana na ye na koganga. Molimo na Yawe akitelaki ye na nguya, mpe basinga oyo ekangaki maboko na ye ekatanaki lokola basinga ya lino oyo eziki na moto, mpe ekweyaki wuta na maboko na ye.
Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye.
Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.