Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 10:5 - Mokanda na Bomoi

5 Sima na yango, okokende na Gibea ya Nzambe epai wapi bayangeli ya Filisitia bazali. Wana okopusana na engumba, okokutana na ngulupa ya basakoli kowuta na esambelo ya likolo ya ngomba. Liboso na bango, ekozala na babeti mandanda, bambunda ya mike, baflite mpe banzenze. Wana bakozala kobeta mindule, basakoli yango bakokoma kosakola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 10:5
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana ngonga ya midi elekaki, bakobaki kotuntuka kino na tango ya mbeka ya pokwa, kasi eyano ezalaki kaka te, nzambe moko te ayanolaki bango mpe ata elembo moko te ezalaki.


Bayekoli ya basakoli, oyo bawutaki na Jeriko bamonaki mpe balobaki : « Molimo ya Eliya evandi sik’oyo likolo ya Elize ! » Bakendeki kokutana na ye mpe bagumbamaki liboso na ye kino na mabele.


Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Beteli, bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye : — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ? Elize azongisaki : — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye !


Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Jeriko bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye : — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ? Elize azongisaki : — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye !


Bayekoli tuku mitano ya basakoli bakendeki kotelema mosika ya esika oyo Eliya mpe Elize batelemaki, na ebale Yordani.


Kasi sik’oyo, memela ngai mobeti moko ya lindanda ! Wana mobeti lindanda azalaki kobeta, loboko ya Yawe ekitelaki Elize,


Elize azongaki na Giligali. Nzokande etuka yango ezalaki kati na nzala makasi. Wana bayekoli ya basakoli bavandaki na mayangani elongo na Elize, alobaki na mosali na ye : « Tia nzungu ya monene na moto mpe lamba elubu mpo na basakoli oyo. »


Mokolo moko, bayekoli ya basakoli balobaki na Elize : — Tala ! Esika oyo tosanganaka elongo na yo ekomi moke mingi mpo na biso.


Na tango yango, Davidi azalaki kati na ebombamelo moko batonga makasi, mpe basoda ya Filisitia bazalaki kati na Beteleemi.


Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela makasi na liboso ya Nzambe, na koyemba mpe na kobeta mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, manzanza mpe bakelelo.


Emani mpe Yedutuni baponamaki mpo na kobeta bakelelo, manzanza mpe bibetelo mosusu ya mindule mpo na kobongisa banzembo na tina na lokumu ya Nzambe. Bana mibali ya Yedutuni bazalaki bakengeli bikuke.


Azafi azalaki mokambi ; Zakari azalaki molandi na ye ; mpe Yeyeli, Shemiramoti, Yeyeli, Matitia, Eliabi, Benaya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli bazalaki kobeta nzenze mpe lindanda ; mpe Azafi azalaki kobeta manzanza.


Monoko na ngai ekoloba maloba ya bwanya ; motema na ngai ekanisi makambo oyo ekopesa bino bososoli.


Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo, na tongo, mpe boyengebene na Yo, na butu,


Boye bolukaka liboso bolingo, mpe bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, mpe mingi penza likabo ya kosakola.


Tango bakomaki na Gibea, ngulupa ya basakoli ekutanaki na ye ; bongo Molimo ya Nzambe akitelaki ye na nguya, mpe akomaki kosakola kati na bango.


Bakopesa yo mbote mpe bakokabela yo mapa mibale. Okozwa yango na maboko na bango.


Saulo aponaki mibali nkoto misato kati na Isalaele : bato nkoto mibale bazalaki elongo na ye na Mikimasi mpe kati na etuka ya ngomba ya Beteli, mpe bato nkoto moko bazalaki elongo na Jonatan, na Gibea ya Benjame. Bato mosusu oyo batikali, azongisaki bango na bandako na bango.


Jonatan alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki na Geba. Bongo bato ya Filisitia bayokaki sango na yango. Boye Saulo abetaki kelelo kati na mokili mobimba, mpe alobaki : « Tika ete Ba-Ebre bayoka ! »


Saulo atindaki bato kokende kokanga Davidi. Kasi tango bamonaki lisanga ya basakoli kosakola mpe Samuele atelemi wana lokola mokambi na bango, Molimo na Nzambe akitelaki bato oyo Saulo atindaki, mpe bakomaki bango mpe kosakola.


Bazongiselaki ye : — Iyo ! Azali liboso na bino. Kasi bosala noki ; awuti kokoma kaka sik’oyo kati na engumba na biso, pamba te bato bakobonza lelo mbeka, na esambelo ya likolo ya ngomba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ