Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 10:3 - Mokanda na Bomoi

3 Kolongwa wana, okokende mwa mosika kino okokoma na nzete monene ya Tabori epai wapi okokutana na mibali misato oyo bakozala komata epai ya Nzambe, na Beteli. Moko akomema bana misato ya ntaba ; mosusu, biteni misato ya mapa ; mpe mosusu, molangi ya vino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 10:3
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Apesaki esika yango kombo « Beteli. » Na kala, bazalaka kobenga esika yango « Luze. »


libanga oyo natelemisi lokola elembo ekokoma Ndako ya Nzambe mpe nakopesa Ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo akopesa ngai. »


Nzambe alobaki na Jakobi : « Kende na Beteli, vanda kuna mpe tonga kuna etumbelo mpo na Nzambe oyo abimelaki yo tango ozalaki kokima ndeko na yo Ezawu. »


Tokomata na Beteli epai wapi nakotonga etumbelo mpo na Nzambe oyo ayanolaki ngai na mokolo oyo nazalaki na pasi mpe azalaki elongo na ngai bisika nyonso oyo nazalaki kokende. »


Likolo ezali ya Yo ; mabele mpe ezali ya Yo ! Yo nde osala mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango.


Bongo, kaka ndenge Yawe alobaki, Anameyeli, mwana ya noko na ngai, ayaki kotala ngai kati na lopango ya bakengeli mpe alobaki : ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti kati na etuka ya Benjame, pamba te yo nde ozali na makoki ya kosikola yango mpe ya kozwa yango ; somba na yo yango. › Nasosolaki ete ezali Liloba na Yawe ;


Soki ezali nyama ya moke nde azali kobonza lokola mbeka ya kotumba, akomema mwana ntaba to mwana meme ya mobali oyo ezanga mbeba.


Bokobakisa bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, mpe bokobakisa lisusu litele moko na ndambo ya vino lokola likabo na yango ya masanga.


Soki alingi kobonza ntaba ya mobali to ya mwasi, akomema yango liboso ya Yawe. Akotia loboko na ye na moto ya mbeka na ye,


Soki alingi kobonza meme to ntaba lokola mbeka ya boyokani liboso ya Yawe, asengeli kobonza nyama ya mobali to ya mwasi oyo ezanga mbeba.


Na likolo ya mbeka na ye ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi, akobakisa likabo ya bagato oyo esalemi na farine batia levire.


Longwa na Saridi, ebalukaki na ngambo ya este, epai moyi ebimelaka, na mondelo ya Kisiloti-Tabori, ekendeki na ngambo ya Dabirati mpe emataki na kino na Yafia.


Mondelo na yango etutanaki na Tabori, Shakatsima mpe Beti-Shemeshi, bongo esukaki na Yordani. Bingumba nyonso ezalaki zomi na motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe : — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ? Yawe azongisaki : — Yuda akokende liboso.


Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ? Yawe azongiselaki bango : — Bokende kobundisa bango.


Bana ya Isalaele batunaki Yawe. (Na mikolo wana, Sanduku ya Boyokani ya Nzambe ezalaki kuna.


Tango bayebisaki Sisera ete Baraki, mwana mobali ya Abinoami, amataki na likolo ya ngomba Tabori,


Mokolo moko, abengisaki Baraki, mwana mobali ya Abinoami, moto ya Kedeshi ya Nefitali, mpe alobaki na ye : — Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi yo mitindo : « Kende, kamata elongo na yo bato nkoto zomi ya mabota ya Nefitali mpe ya Zabuloni, mpe mema bango na nzela oyo ekenda na ngomba Tabori.


Jedeon atunaki Zeba mpe Tsalimuna : — Mibali oyo bobomaki na Tabori, bazalaki ndenge nini ? Bazongisaki : — Bakokanaki na yo mpe bazalaki lokola bana ya bakonzi.


Bakopesa yo mbote mpe bakokabela yo mapa mibale. Okozwa yango na maboko na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ