24 Bongo Samuele alobaki na bato nyonso : — Botala moto oyo Yawe aponi ! Kati na bato nyonso, moko te akokani na ye. Bato bazongisaki na koganga : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi !
Ushayi, moto ya Ariki, moninga ya Davidi, akendeki epai ya Abisalomi mpe alobaki na ye : — Tika ete mokonzi owumela na bomoi ! Tika ete mokonzi owumela na bomoi !
tika ete mokonzi akaba na maboko na biso mibali sambo kati na bakitani ya Saulo mpo ete todiembika banzoto na bango liboso ya Yawe, na Gibea, engumba ya Saulo, moponami na Yawe. Mokonzi alobaki : — Nakopesa bino bango.
Na mokolo ya lelo, akei kobonza bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta mpe ya bameme ; abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, bakonzi ya mampinga mpe Nganga-Nzambe Abiatari ; bazali kolia mpe komela elongo na ye mpe bazali koloba : « Tika ete mokonzi Adoniya awumela na bomoi ! »
Nganga-Nzambe Tsadoki azwaki liseke ya mafuta, kati na ndako ya kapo ya bule, mpe apakolaki Salomo mafuta. Bongo, babetaki kelelo, mpe bato nyonso bagangaki : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »
Nganga-Nzambe Yeoyada abimisaki mwana mobali ya mokonzi, alatisaki ye motole mpe apesaki ye mokanda ya boyokani. Bakomisaki ye mokonzi mpe bapakolaki ye mafuta ya bokonzi. Bato babetaki maboko mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! »
Babimisaki mwana mobali ya mokonzi, balatisaki ye motole, bapesaki ye mokanda ya boyokani mpe bakomisaki ye mokonzi. Yeoyada mpe bana na ye ya mibali bapakolaki ye mafuta ya bokonzi mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! »
Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »
sala keba ete opona kaka mokonzi oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. Asengeli kowuta kati na bandeko na bino. Kotia mopaya te oyo azali ndeko na bino te kati na Isalaele mpo na kokonza bino.
Bato nyonso bakendeki na Giligali mpe batiaki kuna Saulo lokola mokonzi, na miso ya Yawe. Babonzaki kuna bambeka ya boyokani na miso ya Yawe, mpe Saulo elongo na mibali nyonso ya Isalaele basepelaki makasi.
Azalaki na mwana mobali ; kombo na ye ezalaki « Saulo. » Azalaki elenge mobali moko ya kitoko ; mpe kati na mibali nyonso ya Isalaele, moko te akokanaki na ye na kitoko ; azalaki mbinga koleka bango nyonso.