Sima na kobengana moto, atiaki basheribe, na ngambo ya este ya elanga ya Edeni, na mopanga ya moto oyo ezalaki kobaluka bipai na bipai mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi.
Kasi Yawe alobaki na Samuele : — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.
Elombe mobali moko oyo kombo na ye ezalaki « Goliati, » moto ya mboka Gati, abimaki wuta na molako ya bato ya Filisitia. Azalaki na bametele pene misato na molayi.
Kati na ekolo ya Benjame, ezalaki na moto moko ya bozwi ; kombo na ye ezalaki « Kishi, » mwana mobali ya Abieli, mwana mobali ya Tserori, mwana mobali ya Bekorati, mwana mobali ya Afia, moto ya ekolo ya Benjame.
Azalaki na mwana mobali ; kombo na ye ezalaki « Saulo. » Azalaki elenge mobali moko ya kitoko ; mpe kati na mibali nyonso ya Isalaele, moko te akokanaki na ye na kitoko ; azalaki mbinga koleka bango nyonso.