Sima na yango, Davidi atunaki Yawe : — Nakoki na ngai kokende na moko kati na bingumba ya Yuda ? Yawe azongisaki : — Okoki na yo kokende. Davidi atunaki lisusu : — Nakende wapi ? Yawe azongisaki : — Kende na Ebron.
Akokende kotelema liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, oyo akotuna mokano na Yawe mpo na ye, na nzela na Urimi. Na mokano wana nde, ye mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakobanda kobima mpe kokota.
Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe : — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ? Yawe azongisaki : — Yuda akokende liboso.
Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ? Yawe azongiselaki bango : — Bokende kobundisa bango.
Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te ? Yawe azongisaki : — Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino.
Abengaki etuka moko na moko ya ekolo ya Benjame, mpe etuka ya Matiri eponamaki. Na suka, ezalaki Saulo, mwana mobali ya Kishi, nde aponamaki. Kasi tango balukaki ye, bamonaki ye te.
Boye Saulo atunaki Nzambe : « Nakoki na ngai kokita mpo na kolanda bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko ya bato ya Isalaele ? » Kasi Nzambe apesaki ye eyano te na mokolo wana.
Samuele alobaki : — Atako ozalaki komimona moto pamba na miso na yo moko, kasi boni, okomaki te mokonzi ya bikolo ya Isalaele ? Yawe apakolaki yo mafuta mpo ete ozala mokonzi ya Isalaele.
Saulo azongisaki : — Ngai nazali moto ya ekolo ya Benjame, ekolo oyo eleki moke kati na bikolo ya Isalaele. Etuka na ngai eleki moke kati na bituka nyonso ya ekolo ya Benjame. Boye mpo na nini ozali koloba na ngai na lolenge oyo ?