Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 10:19 - Mokanda na Bomoi

19 Kasi, na mokolo ya lelo, bobwaki Nzambe na bino, oyo abikisaka bino na pasi na bino nyonso mpe na minyoko na bino. Mpe bolobi na Ye : ‹ Ponela biso mokonzi oyo akokamba biso ! › Lokola ezali bongo, botelema sik’oyo bino moko liboso ya Yawe kolanda bikolo mpe bituka na bino. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 10:19
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe, kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.


Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.


Kasi bokolia yango sanza mobimba kino ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango nkele, pamba te bobwakaki Yawe oyo azali kati na bino, bolelaki-lelaki liboso na Ye mpe bolobaki : ‹ Mpo na nini tobimaki na Ejipito ? › »


« Loba na Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, ete balongola bambabola oyo batumbelaka malasi na kati-kati ya moto, mpe bapanza makala ya moto mosika, pamba te bambabola wana ezali bule.


Tango okokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo ; tango okozwa yango mpe okovanda kati na yango, tango mosusu okoki koloba : « Tika ete toluka mokonzi oyo akokonza biso ndenge ezali na bikolo nyonso oyo ezingeli biso, »


Jozue asangisaki mabota nyonso ya Isalaele na Sishemi. Abengisaki bampaka, bakambi, basambisi mpe bakalaka ya Isalaele ; mpe bango bayaki liboso ya Nzambe.


Kasi Jedeon alobaki na bango : — Nakozala mokonzi na bino te, ezala ata mwana na ngai ya mobali. Yawe nde akozala mokonzi na bino.


Samuele abengaki ekolo moko na moko ya Isalaele, mpe ekolo ya Benjame eponamaki.


Kasi tango bomonaki Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, koya kobundisa bino, bolobaki na ngai : « Te ! Tozali na posa ya mokonzi mpo na kokamba biso. » Nzokande ezali Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki mokonzi na bino.


Ezalaki ndenge wana nde Yawe abikisaki na mokolo wana bato ya Isalaele, mpe bitumba ekobaki kino ekatisaki Beti-Aveni.


Saulo alobaki : — Bino nyonso oyo bozali bakambi ya bato, boya awa ! Toluka koyeba lisumu nini oyo esalemi na mokolo ya lelo.


Yawe akobaki komilakisa na Silo, pamba te azalaki komimonisa kuna epai ya Samuele na nzela ya Liloba na Ye.


Mpe Samuele azalaki kokomisa maloba ya Yawe epai ya bato nyonso ya Isalaele. Na tango wana, bato ya Isalaele bakendeki kobundisa bato ya Filisitia. Bato ya Isalaele batongaki molako na bango na Ebeni-Ezeri, mpe bato ya Filisitia batongaki ya bango molako, na Afeki.


Kasi bato baboyaki koyokela Samuele, balobaki : — Te ! Biso tolingi kaka mokonzi.


Balobaki na ye : « Tala, yo okomi na yo mobange, mpe bana na yo ya mibali bazali kotambola te na banzela na yo. Sik’oyo, pona mokonzi oyo akokamba biso ndenge ezali na bikolo nyonso. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ