Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 10:16 - Mokanda na Bomoi

16 Saulo azongiselaki noko na ye : — Ayebisaki biso ete ba-ane ekomonana solo. Kasi Saulo ayebisaki noko na ye te makambo oyo Samuele alobaki na ye na tina na bokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 10:16
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moyize azongaki epai ya Jetro, tata-bokilo na ye, mpe alobaki na ye : — Nasengeli kokende epai ya bandeko na ngai, na Ejipito, mpo ete natala soki ndambo kati na bango bazali nanu na bomoi. Jetro ozongisaki : — Kende na kimia !


Moto ya mayele abombaka boyebi, kasi motema ya zoba etatolaka makambo ya bozoba.


Zoba alandaka baposa nyonso ya motema na ye, kasi moto ya bwanya akangaka yango mpe akitisaka yango.


tango ya kopasola mpe tango ya kobamba, tango ya kokanga monoko mpe tango ya koloba ;


Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Boye, Samison apasolaki nkosi na kati-kati, na maboko pamba, ndenge bapasolaka mwana ntaba. Kasi kati na makambo oyo asalaki, ayebisaki eloko moko te epai ya tata to mama na ye.


Akamataki yango na maboko na ye mpe aliaki yango nzela-nzela. Tango akutanaki na baboti na ye, apesaki bango ndambo ya mafuta ya nzoyi. Bongo bango mpe baliaki yango ; kasi atikalaki koyebisa bango te ete azwaki mafuta yango ya nzoyi kati na nzoto ya nkosi oyo ekufa.


Noko ya Saulo alobaki lisusu : — Nabondeli yo, yebisa ngai makambo oyo Samuele alobaki na bino.


Komitungisa na yo te na tina na ba-ane na yo, oyo ebungaki wuta mikolo misato, pamba te esili komonana. Bongo nani nkolo biloko nyonso ya motuya oyo ezali kati na Isalaele ? Ezali biloko na yo mpe libota mobimba ya tata na yo.


Wana bazalaki kokende mpe bakomaki na mondelo ya engumba, Samuele alobaki na Saulo : « Loba na mosali na yo ete aleka liboso na biso. » Boye mosali alekaki liboso, mpe Samuele alobaki lisusu na Saulo : « Telema awa sik’oyo mpo ete napesa yo sango oyo ewuti epai ya Nzambe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ